Skip to content

Mutu Ya Suka

Popularity · Low

YouTube

Searching YouTube...

Lyrics

Molimo na ngai kumisa Nkolo Mayele na ngai Kumisa Nkolo oooh Molimo na ngai kumisa Nkolo Ye nde azali Nzambe na bomoyi Soki mbanguna ba telemeli ngai Na lendisamaka na maloba Nkolo Ba ko timola libulu po na kufa Atelemaka abundelaka ngai ye eh eh Nzambe na nga azali na bomoyi Atelemaka mutu ya suka na nioso Oyo alobaka ezali ya solo Nzambe na nga azali na bomoyi 2x Eh na fukami na toboli misu epayi na nkolo Ye molongisi na nga na tango ya pasi eh Na libulu na kufa Yahweh o pesi ngai bomoyi Katikati na moto Yahweh olongisi nga Yahweh Sabaoth yo nde o pesi nga elonga Na tatola monene na yo na bomoyi na nga Ngai na kati na molili nga na kobelela Yesu eh Yonde mwinda bomoyi yaka kongengisa nga eh Tango bato ba yini nga mpo nga moto na Kokumba Aboyaki nga te andimi kobikisa ngai eh Soki bato basali kosela mpo na kufa Mosikoli na nga akotelema moto ya suka baba Nzambe na nga azali na bomoyi Atelemaka mutu ya suka na nioso Oyo alobaka ezali ya solo Nzambe na nga azali na bomoyi Nzambe na nga azali na bomoyi Atelemaka mutu ya suka na nioso Oyo alobaka ezali ya solo Nzambe na nga azali na bomoyi Eh eh Ata banguna bayende mpo ba boma nga Na kolengaka te mpo ye azali na bomoyi Soki ba tuni nga wapi nzambe na ngai Na zonkisaka mpe na lolendo nioso Nzambe na nga yo zali na bomoyi Otelemaka mpe moto ya suka na nioso Oyo olobaka ezali ya solo Nzambe na nga ozali na bomoyi alleluia Nzambe na nga azali na bomoyi Atelemaka mutu ya suka na nioso Oyo alobaka ezali ya solo Nzambe na nga azali na bomoyi 2x (Instrumental) Nzambe na nga azali na bomoyi Atelemaka mutu ya suka na nioso Oyo alobaka ezali ya solo Nzambe na nga azali na bomoyi 3x