Skip to content
Lyric
Dive
Public playlists
My playlists
Search
Sign in
Matondo
Franck Mulaja
Popularity · Low
+
Original
0
0
YouTube
Searching YouTube...
Lyrics
Original
Translation
Bilingual
Matondo na yo nkolo
Pona bolamu bwa yo
Ofungoli bikuke bwa yo
Opesi biso njela, ya kokota na ema na yo
Kosimba motema na yo
Biso tobiangamaki té
Tobongamaki pe té
Ngolu na yo esali kati na biso
Ebuki efelo ya bo kabuani
Epesi biso ebonga
Pembeni ya nkembo na yo
Nani aza lokola yo
Nani ako sunga lokola yo
Miso etombwami likolo
Tokotatola monene na yo
Nani aza lokola yo
Nani ako sunga lokola yo
Miso etombwami likolo
Toko tatola monene nayo
Kombo na yo nzambe
Seko na seko okumbama
Kombo na yo nzambe
Seko na seko okumbama
Nzambe oyo atombolaka
Pe mokili egangi na kokamwa
Afongola nzela ya seko
Na matambe na yé tozui
Esengo kati ya motema
Lisungi oyo esilaka té
Totomboli ma-boko
Tosemboli miso likolo na ye, oyo aleki na nguya
Tobuaka motolé ya kembo liboso na yo nzambe
Seko na seko okumbama
Nani aza lokola yo
Nani a kosunga lokola yo
Miso etombwami likolo
Tokotatola monene na yo
Nani aza lokola yo
Nani akosunga lokola yo (Misu etombwami)
Miso etombwami likolo
Tokotatola monene na yo
Kombo na yo nzambe
Seko na seko, o kumbama
(Kombo nayo nzambe)
Kombo na yo nzambe
(Kombo nayo nzambe)
Seko na seko, o kumbama
(Kombo nayo nzambe)
Kombo nayo nzambe
Seko na seko, o kumbama