Skip to content

Amen - Alléluia

Popularity · Low

YouTube

Searching YouTube...

Lyrics

Nkolo tika na yembela yo Nkolo tika na kumisa yo Nkolo tika na sanjola Tika ngayi na kumisa yo Tika ngayi na nétola yo Tika ngayi na sanjola yo Maloba motuy'emati na motema na lingi na kumisa yo Tika ngayi na nétola yo Nkombo na yo masiya na nga Ezala nzete ya piyo Na fanda na kimia Nkombo na yo masiya na nga Ezala mopanga monene Ya Ko Kweyisa satana Na nkombo'a libota na biki té Na nkombo'a noko na biki te Mais na biki na nkombo na Yesu Ba tangueli nga ba kissi'a pharmacie Lobiko epesami yo Nkombo na Yesu nde lobiko na nga 'O lokotaki nga kati na nzela Opakoli nga mafuta na yo Nkolo bolingo monene Yesu Esi na lingaki na beba eh Esi na lingaki na kufa eh Obikisi nga yaya aaahhh Esi na lingaki na béba eh Esi na lingaki na kufa eh 'O kangoli nga yaya aahh Esengo eh Elikia eh Kimia eehh Esengo eh Elikia eh Kimia eehh Esengo eh Elikia eh Kimia eehh OOhh Amen amen epayi na yo (Amen) Tika ngayi na netola yo (Amen) Tika pambola yo (Amen) (Alleluia amen) Oohh amen amen epayi na yo(Amen) Tika ngayi na sanjola yo (Amen) Tika ngai na kumisa yo (Amen) Aamen!! (Alleluia amen) Oohh mosantu, mosantu yo zali nzambé Tika ngayi na nétola yo (Amen) Tika ngayi na sanjola yo (Amen) Aamen!! (Alléluia amen) Oohh, makasi pe mayélé nionso (Amen) Ewuta bi payi na yo (Amen) Tika ngayi na kumisa yo (Amen) Aamen!! (Alléluia amen) Na bongisi mesa na nga'a lelo (Amen) Na lingi na lesa yo (Amen) Masanjoli'a motema na nga (Amen) Aamen!! (Alléluia amen) 'O fandaki na kiti na yo (Amen) soki'o yoki na sanjoli (Amen) 'O telemi o yamba ya ngo (Amen) Aamen!! (Alleluia amen)