HOSANNA (GENOBY ZOLA)
Pasteur Neville KANONO, Pasteur Junior Fuaka
Popularity ยท Low
Listen
YouTube
0:00 / 0:00
Loading YouTube player...
Lyrics offset
Synced
Lyrics
Nzela eleki molayi
Ko loba mingi te,koloba mingi te
Epimelo oyo okomi nanu te
Ko lakisa misapi te,bomba mosapi nayo
Mosando oyo obiki nanu te
Maloba eleka ebele
Ehhhh ebele
Nzambe azali ko luka moto nani
Akoki ko tombola,atikala kaka moto
Akoluka akoma muanje te
Akoma muanje te,akoma muanje te
Akoluka akoma gangi te,gangi te,gangi te
Akoluka ko nvuka basusu te
Nvuka basusu te,basusu te
Yango to yembi lelo
Hosana,Hosana,Hosana,Hosana
Nzambe apesa yo nanu mbongo ebele
Nde toko tala soki yo oko tosa mokengeli
Hosana,Hosana,Hosana,Hosana
Zua nanu ebanga ya mboka
Nde nasima toko yeba soki oko yiba te
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Fongola misu malamu tangu ozo bala
Toboyi aza lisusu ya niveau na nga te
Hosana,Hosana,Hosana,Hosana
Zua nanu grade na musala
Nde toko yeba soki ciombo ekoleka kaka
Hosana,Hosana,Hosana,Hosana
Zua nanu cheque ya 3 millions
Nde toko tala soki oko futa moko na zomi
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Kende nanu mobembo na mosika
Nde toko yeba soki ozalaka fidรจle
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Lakisa nga muasi oponi
Nde nako yeba nini ebatama kati nayo
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Somba nanu mutuka ya fumรจe
Nde toko yeba nini ekozala na kati
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Bembuka nanu na mikili ya poto
Nde nakoyeba soki yo o ndima yasolo
Yo Wana lelo okomi koluka libala
Zua nanu libala ndeko ya muasi
Nasima toko yeba soki oko sokema
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Zua nanu niongo ya moto
Nde toko yeba soki ozalaka frรจre
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Nzambe atombola yo nanu makasi
Nde toko yeba soki ozalaka lolendo te
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Uta okoma na mbongo ebele
Tala ndenge nwasi nayo alelaka mikolo nioso
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Nzambe afungola nanu motema na yo
Nde toko yeba ba sekele oyo ezalaka na kati
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Pesa biso code ya ciombo nayo
Nde toko yeba soki ozalaka nani
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Banda yo okoma ko yoka bande
Baye bayokaka bateyi bakoma banguana
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Olobaka oza Joseph ya bandeko nayo
Mwasi ya potiohar,yo okimaka ye te
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Banda eglise na รจvangรจlisation
Nde okoyeba pasi ya ko gagner mondimi
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Lokola yo okomi moyembi monene
Star nalosambo,olandaka lisusu mateya te
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Batu babima nanu na eklezia nayo
Nde toko yeba soki oko linga bango kaka
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Lokola yo okoma na eglise ya monene
Ba eglise ya mikie Ekomi ikabod
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Babeta yo nanu mbata ndeko
Nde toko yeba soki oko yambuka te
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Lokola ozua mwasi ya mokengeli
Yobandi kosambisa makambo na eklezia
Hosanna,Hosana,Hosana,Hosana
Yaweh sala biso ngolu
Sala biso ngolu,sala biso ngolu
To tambola na ko mikitisaka
Sala bisu ngolu,sala biso ngolu
To tambola nako sokema ka
Sala biso ngolu,sala biso ngolu
To tambola nako bika liloba
Sala biso ngolu
Soki na moni moninga na mabe
Na bondela po naye
Sala biso ngolu,Sala biso ngolu,sala biso ngolu
Salite naye na zipa moto amona te
Sala biso ngolu
(Sala biso ngolu)
Mabe naye na manoko te
Na monoko te,ngolu
Sala biso ngolu,sala biso ngolu