Skip to content
Lyric
Dive
Public playlists
My playlists
Search
Sign in
Eau Benite
Simaro
Popularity · Low
+
🇨🇩 Lingala · Original
0
0
Listen
YouTube
1
2
3
0:00 / 0:00
Loading YouTube player...
Lyrics offset
Synced
Lyrics
Original
Translation
Bilingual
SANGI PUMBA
Il est toujours difficile d'être aimé, qu'aimer
SANGI PUMBA na ye nde kosenga yo
Soki moyen ezali tokabuana
Mabe eleki, motema mobebi eh
Na pesa yo liberté osakana
Naboyi miso na nga etala eloko
Eloko ekobunga lobi oh mama
Ngaï oyo nakomi nde kozonga
Na sanduku ya makambo na moto
Na longoli zuwa patience esili eh
Na pessa bino permission bobalana
Soki muana elingi kosimba moto
Botika ye asimba mokolo akozika akoyeba
Lobi lisusu nakutaki yo na ye
Bras dessus ekopi na monoko
Ofongoli miso otali nga okitisi elongi
Oyoki soni obandi se kolela
Tika hypocrisie ozali na motema moko
Ndege nini okolinga biso mibale
Oko tia nga wapi?
Bomba mayi nayo ya miso
Oko lela masumu nayo
Naboyi osimba nga na nzoto
Maboko nayo matondi makila
Makila ya motema na nga ozokisi
Otubi nga nde likonga eh
Kende basukola yo maboko eh
Epayi ya sango na eau bénite oh mama
Yo moko oponi nzela wana eh
Natombeli yo kaka chance
Epayi na ye zala mwa fidèle
Kosala ye ndenge osali nga te oh
Mwasi azalaka na mibali mibale te
Banda bokoko na biso eh
Kobebisa te sima ozongela ngaï
Okokuta nga na si na bala oko pesa nga faute
Soki mokolo mosusu KINTSALA
Obuki fleur rose
Atako motema na yango enuna
Kobwaka yango nanu te oh
Tango mosusu se yango ya suka
Oyet'etikala na kati y'elanga
Oko ya kozonga sima oko regretter
Fleur mosusu ezali te PATRICK MANGASA
Longola loboko na litama
Tika kosala hypocrisie
Naboyi pardon na yo ya litsho
Pesa merci na patience na nga
Epayi okei toli napesi yo
Vanda na ndako zela se bomengo
Kobebisa te sima ozongela ngaï
Okokuta porte bakanga et chien méchant
SANGI PUMBA
Nalobaki na yo
Ko koma kombo na ngaï likolo ya zelo te mama
Surtout tango mbonge ezali koya
Koma yango likolo ya libanga
Ata ba MARTIN-PÊCHEURS ba koya kotanga
Oyebi bien que mama ngaï nazali mbisi
Ya solo na lula mayi
Kasi oyo ya moto na lingaka te
Yo moko oponi nzela wana eh
Natombeli yo kaka chance
Epayi na ye zala mwa sérieuse
Kosala ye ndenge osali nga te oh
Mwasi azalaka na mibali mibale te
Banda bokoko na biso eh
Kobebisa te sima ozongela ngaï
Okokuta nga na si na bala oko pesa nga faute
SANGI PUMBA
Na maboko na ngaï
Osalaki mobulu
Lokola mwana nioso akosalaka na ndako ya tata na mama
Kasi naboyaka yo te
Epay'okei lakisa ye fidélité chérie
Kosala ye ndenge osali nga te
Nde ozui bomengo
Nazali kobanga noki oboya yo
Okoya ko telengana ya pamba
Oko sala ngaï mpasi
Oyebi que, nalingaki yo mingi
Bomba mayi nayo ya miso eh
Oko lela masumu nayo
Naboyi osimba nga na nzoto
Maboko nayo matondi makila
Makila ya motema na nga ozokisi
Otubi nga nde likonga eh
Kende basukola yo maboko
Epayi ya sango na eau bénite oh mama
Eh eh
Eeeeehh
Oyo malchance
Oyo lisuma
Eh eh
Eeeeehh