Skip to content

Okozela Trop

Simaro Massiya Lutumba
Popularity ยท Low

Listen

YouTube

0:00 / 0:00
Loading YouTube player...
Lyrics offset
Synced

Lyrics

Ngonga ya Nzambe e bataki e, i ma(ma) oh Ba bala ngai o, ba bala ngai Mbanda nini na ko banga ma(ma) o Ba bala ngai o, ba bala ngai O kozela trop ba longola ngai na libala a Ba meka nzoto o, ba lemba ngai O kozela trop divorce ya libala oyo Ba sala ba kisi ba lemba ngai, kaka yo "Mayi ya moto e tumbaka elamba te" Na ko liya na ko lata o na tina o Ba bala ngai o ba bala ngai Publicitรฉ na ba troubles ya nini o mobali ya bato o bangaka Mokolo na ko lotela yo ndoto, soki mbula te ata mopepe O ko zela trop divorce ya libala oyo Ba sala ba kisi o, ba lemba ngai, kaka yo Mangungu jamais ko banga Ngonga ya Nzambe e bataki e, i ma(ma) oh Ba bala ngai o, ba bala ngai Mbanda nini na ko banga ma(ma) o Ba bala ngai o, ba bala ngai O kozela trop ba longola ngai na libala a Ba meka nzoto o, ba lemba ngai O kozela trop divorce ya libala oyo Ba sala ba kisi ba lemba ngai, kaka yo "Mayi ya moto e tumbaka elamba te" Na ko liya na ko lata o na tina o Ba bala ngai o ba bala ngai Publicitรฉ na ba troubles ya nini o mobali ya bato o bangaka Mokolo na ko lotela yo ndoto, soki mbula te ata mopepe O ko zela trop divorce ya libala oyo Ba sala ba kisi o, ba lemba ngai, kaka yo Mangungu jamais ko banga O ko zela trop eh, o kozela trop libala oyo O kozela trop, mpo ba meki ba meka nzoto Batiki ngai na libala na zali se ko dondua O ko zela trop e, o ko zela trop mama e ah O ko zela mingi e, o kozela trop divorce oyo Ba oyo ba leki yo basala kisi Ba lemba ngai na libala oyo Kaka mpo na yo ki zodisa O kozela trop mama e a ye Mobali ya bato e Eloko ya moto lula na mosika Lelo liziba litondi mbisi Bo bosana te ezali na nkolo na yango e O ko zela trop e e, o ko zela trop mama e e a ye Bino ba ki zodisa e Ba troubles na mabala ya bato e Bo ko beta ngonga tongo mpokwa Ba defiles na ba bureaux ya mibali ya ngana O ko zela trop eh, o ko zela trop na yeba yo a ye Demenagement a ye Demenagment o silisi ba zones Ko bombana ko bambana soki eleki A ko kende ko bomba yo te na Kimbanseke O ko zanga adresse e, likambo ya mobali ya ngana a e