Skip to content

Frere Edouard

Popularity ยท Low

Listen

YouTube

0:00 / 0:00
Loading YouTube player...
Lyrics offset
Synced

Lyrics

Ha, ha, ha, ha, Frere Edouard A pimelaka moto ko seka na ko lela te, Frere Edouard Soki ngolo ayebisi yo que ngando aza malade Ndimela ye oh, po bango nyoso ba vandaka na mayi Butu eko komaka eh Tongo pe eko tanaka eh, ba mama ba ko lamuka na tongo Ko luka mapa na boulangerie Bango nde ba ko lamusaka biso, tongo esi etani Ba mama ya mapa Kinshasa a bosana bino eh Que bino bato bo lamusaka biso na tongo Po ba ndeke na ba soso ba bandaka ko lamusa Biso na tongo Ba bunga oh Nga, Diesa, na botama na nga mokolo ya eyenga ah Yango mpe na mesana ko sambela Mikolo minso ya lomingo Na pokwa nga na mesana ko kende messe na nga Po nalula Nzambe eh Nakomi na ndako ya Nzambe Frere Edoire a luli nga na miso ya bato A beleli na miso ya ba ndimi ngai Mwasi naye ya molimo Na tika mibali nyoso ya misuni Na landi nanga lokuta ya Frere Edouard Nakomi na ndako ya Frere Edouard Frere Edouard alobi na lata robe ya molayi Na tiya kitambala na moto Frere Edoure okamwisi nga Ah ngai, Liya, mawa ah Frere Edouard Olulaki ngai na ndenge na ngai te Frere Edouard Boni yo moyimi boye Olingi ba tala nga na ndeko mosusu te Kaka yo moko Nayebi nyoso naza mwasi nayo Obangaka nini, Frere Edouard Pesa nga confiance lokola na mi pesa na molimo Ba ndimi eh Eloko na monaka Frere Edouard mabe Soki ba paya ba ye na ndako To ya famille na ngai, to ya famille naye Oko mona Frere Edouard akomi mawa mawa Lokola mwana ya moke ya 5ans Nanu azwi petit dรฉjeuner na tongo te Eh, ba frere na ba soeur Surtout kanda ezalaka na Frere Edouard Ko meka ata senga ye sucrรฉe Te na sombela ba paya Wana oko mona Frere Edouard abimiseli yo bible Bo tanga esika moko Et puis eloko mosusu, ezalaka na Frere Edouard Soki akangeli yo kanda Eza lokola moto ba kangi ye na menotte na ba police Ah, nga, Liya eh Nga moto nazalaka mwasi ya elongi elengi Lelo nakomi lokola safu oyo eyindi na nzete Batu kutu ya misuni ba koma ko kamwa ngai En fin, nayebi te Soki ba frere nyoso ba zalaka obe boye oh Ha, ha, ha, ha Na voiture nayo Autocollant nyoso ba koma grace a Dieu Na ndako na biso Mur nyoso photo ya Yesu Na maboko naye oh Chapelet ezangaka te, Frere Edouard Yekola ko kaba, yekola pe ko limbisa bato ngo oh Kake ebetaka likolo oh Ebomaka nango bato nyoso te oh Tango mosusu eko boma mobali Etiki mwasi na bana Mabe toko salaka o se, eko futamaka o se Bolamu toko salaka o se Eko futamaka o likolo Frere Edouard yekola ko kaba Yekola pe ko limbiso bato eh